Publicidade

Salmos 1

Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli

1 Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,

atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,

mpe avandaka te esika moko na batioli,

2 kasi asepelaka na mibeko ya Yawe

mpe akanisaka yango butu mpe moyi.

3 Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi,

oyo ebotaka mbuma na eleko na yango,

mpe makasa na yango ekawukaka te ;

misala na ye nyonso etambolaka malamu.

4 Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe !

Bazali lokola matiti ya kokawuka

oyo mopepe epanzaka.

5 Yango wana bato mabe bakolonga te

kotelema na kosambisama,

mpe bato ya masumu bakowumelaka te

kati na lisanga ya bato ya sembo.

6 Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo,

kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-