Publicidade

Salmos 113

Moko te akokani na Nzambe

1 Bokumisa Yawe !

Bino basali ya Yawe, bokumisa Ye ;

bokumisa Yawe !

2 Tika ete Kombo ya Yawe epambolama

kobanda sik’oyo kino libela na libela !

3 Longwa na este kino na weste,

tika ete Kombo ya Yawe epambolama !

4 Yawe azali na likolo ya bikolo nyonso,

nkembo na Ye ezali na likolo koleka Lola.

5 Nani akokani na Yawe, Nzambe na biso,

oyo avandi na Kiti ya Bokonzi

kati na bisika oyo eleki likolo ?

6 Agumbamaka mpo na kotala

likolo mpe mokili.

7 Wuta na putulu, atombolaka

moto oyo akelela ;

wuta na fulu ya matiti,

abimisaka mobola

8 mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi,

na bankumu ya bato na Ye.

9 Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye,

lokola mama ya esengo kati na bana na ye.

Bokumisa Yawe !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-