Publicidade

Salmos 94

Kino tango nini bato mabe bakolonga ?

1 Yawe, Nzambe oyo azongisaka

mabe na mabe,

Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe,

mimonisa kati na nkembo na Yo !

2 Mosambisi ya mokili, telema

mpo na kozongisela bato ya lolendo

mabe na mabe na bango !

3 Yawe, kino tango nini bato mabe,

kino tango nini bato mabe bakosepela ?

4 Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga ;

bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa !

5 Yawe, bazali konyokola bato na Yo

mpe bazali koyokisa libula na Yo pasi ;

6 bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali,

mopaya mpe bana bitike ;

7 bazali koloba :

« Yawe amonaka eloko moko te,

Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te ! »

8 Bino bato ya kilikili, bososola !

Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?

9 Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te ?

Ye oyo asala liso akoki komona te ?

10 Ye oyo apesaka bikolo etumbu

akoki kopesa etumbu te ?

Ye oyo apesaka bato boyebi.

11 Yawe ayebi makanisi ya bato ;

ayebi ete ezali na tina te.

12 Yawe, esengo na moto oyo

ozali kozongisa na nzela,

moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo

13 mpo na kopesa ye bopemi na tango ya pasi,

kino libulu etimolama mpo na moto mabe !

14 Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te,

abwakaka libula na Ye te.

15 Bakosambisa lisusu kolanda bosembo,

mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima

bakotosa bosembo yango.

16 Nani akotelema mpo na ngai

mpo na kotelemela bato mabe ?

Nani akokotela ngai

liboso ya bato ya misala mabe ?

17 Ah, soki Yawe asungaki ngai te,

mbele nakendeki noki na mokili ya kufa !

18 Soki nalobi :

« Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, »

bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.

19 Soki natungisami na makanisi ebele,

kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.

20 Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi

na nzela ya mibeko na yango ;

boni, ezali lisanga moko elongo na Yo ?

21 Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa

bomoi ya moto ya sembo

mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.

22 Kasi Yawe azali, mpo na ngai,

ndako batonga makasi ;

Nzambe na ngai azali libanga

epai wapi nazwaka ebombamelo.

23 Akozongisela bango mabe na bango

mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango.

Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-