Publicidade

Salmos 61

Bomba ngai na se ya lipapu na Yo

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.

2 Oh Nzambe, yoka koganga na ngai,

yoka na bokebi losambo na ngai.

3 Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo,

motema na ngai ebukani !

Mema ngai na libanga oyo eleki likolo

epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.

4 Pamba te, ozali ebombamelo na ngai,

ndako molayi batonga makasi,

liboso ya banguna na ngai.

5 Posa ya motema na ngai ezali :

kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo

mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.

6 Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai,

opesaki ngai libula ya bato

oyo batosaka Kombo na Yo.

7 Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ;

tika ete awumela na bomoi.

8 Tika ete awumela na bokonzi

libela na libela liboso ya Nzambe !

Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.

9 Boye, nakoyemba mikolo nyonso

mpo na lokumu ya Kombo na Yo,

mpe nakokokisa bandayi na ngai

mokolo na mokolo.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-