Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 98

Nzambe azali koya kosambisa mabele

1 Nzembo.

Boyembela Yawe nzembo ya sika,

pamba te asalaka makambo ya kokamwa !

Na nguya mpe na bokonzi na Ye ya bonzambe,

alongaki.

2 Yawe atalisaki elonga na Ye,

amonisaki bosembo na Ye epai ya bikolo.

3 Akanisaki bolingo mpe bosembo na Ye

mpo na libota ya Isalaele.

Kino na suka ya mokili,

elonga ya Nzambe na biso emonanaki.

4 Mokili mobimba, bobetela Yawe maboko,

boyemba banzembo ya esengo

mpe bobeta mindule !

5 Bobetela Yawe lindanda,

boyembela Ye banzembo na lokito ya nzenze !

6 Bobeta maboko liboso ya Yawe, Mokonzi,

na lokito ya bakelelo mpe ya maseke.

7 Tika ete ebale monene elongo na nyonso

oyo ezali kati na yango,

mokili mpe bavandi na yango, bapesa lokito !

8 Tika ete bibale ebeta maboko

mpe bangomba nyonso eganga na esengo

9 liboso ya Yawe, pamba te azali koya

kosambisa mabele !

Akokata makambo na yango na bosembo.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também