Publicidade

Salmos 95

Mokili mobimba ezali kati na maboko ya Yawe

1 Boya, toganga na esengo mpo na Yawe !

Tobetela Libanga na biso maboko,

pamba te azali Mobikisi na biso !

2 Tokende liboso na Ye

elongo na mabondeli ya kozongisa matondi,

tobetela Ye maboko elongo na banzembo.

3 Pamba te Yawe azali Nzambe Monene,

azali Mokonzi Monene,

na likolo ya banzambe nyonso.

4 Asimbi mozindo ya mokili kati na loboko na Ye ;

mpe basonge ya bangomba ezali ya Ye.

5 Ebale monene ezali ya Ye,

azali Mokeli na yango ;

mabele ya kokawuka ezali mpe ya Ye,

asala yango na maboko na Ye.

6 Boya, togumbama mpe tofukama,

tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe,

Mokeli na biso !

7 Pamba te azali Nzambe na biso ;

tozali bato oyo aleisaka,

etonga oyo abatelaka.

Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,

8 « boyeisa mitema na bino mabanga te,

ndenge bosalaki na Meriba ;

ndenge bosalaki na mokolo wana

ya Masa kati na esobe

9 epai wapi batata na bino batombokelaki ngai

mpe bamekaki ngai atako bamonaki ngai kosala.

10 Mibu tuku minei, nayinaki bato

ya ekeke wana mpe nalobaki :

‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba,

bayebaka banzela na ngai te. ›

11 Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka :

‹ Bakotikala kokota te

kati na bopemi na ngai ! › »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-