Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 129

Banyokoli ngai mingi, kasi nalembi te

1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele.

Tika ete Isalaele ezongela koloba :

2 « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele,

kasi batikali kolonga ngai te »

3 Bato mabe batimoli mokongo na ngai,

bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo.

4 Kasi lokola Yawe azali sembo,

akati basinga ya bato mabe.

5 Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona

bakufa soni mpe bazonga sima !

6 Tika ete bakoma lokola matiti

oyo ebotaka na likolo ya ndako

mpe ekawukaka liboso ete balongola yango ;

7 tika ete mobuki bambuma ya bilanga

atondisa na yango te maboko na ye,

tika ete mokangi maboke ya banzete atondisa

na yango te saki na ye.

8 Tika ete baleki nzela baloba na bango te :

« Tika ete Yawe apambola bino »

Topamboli bino na Kombo na Yawe !

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também