Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 87

Siona, etima ya bikolo nyonso

1 Nzembo ya bana ya Kore.

Yawe atia moboko ya Siona

na likolo ya bangomba ya bule.

2 Yawe alingaka bikuke ya Siona

koleka bandako nyonso ya Jakobi.

3 Oh engumba ya Nzambe,

maloba ya nkembo ezali kolobama na tina na yo !

4 Kati na bato oyo bayebi ngai,

natangi Rahavi mpe Babiloni.

Ezali kuna na Siona nde Filisitia, Tiri

mpe Kushi ebimela.

5 Na tina na Siona, maloba oyo ekolobama :

« Bato nyonso babimela awa,

mpe ezali Ye-Oyo-Aleki-Likolo

nde alendisaka yango»

6 Tango Yawe akomaki

kati na buku ya bikolo,

akomaki boye mpo na moko na moko kati na bango :

« Moto songolo abotama kati na Siona »

7 Mpe tango bayembaka mpe babinaka, balobaka :

« Bitima na ngai nyonso ezali kati na yo »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também