Publicidade

Salmos 149

Yawe alingaka bato na Ye

1 Bokumisa Yawe !

Boyembela Yawe nzembo ya sika,

bokumisa Ye na banzembo kati na mayangani ya bayengebene !

2 Tika ete Isalaele asepela na Mokeli na Ye !

Tika ete bato ya Siona bazala na esengo

mpo na Mokonzi na bango !

3 Tika ete bakumisa Kombo na Ye na mabina ;

tika ete babetela Ye bambunda mpe mandanda !

4 Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye,

alatisaka babola motole ya elonga.

5 Tika ete bayengebene na Yawe basepela

kati na lokumu oyo ;

tika ete bayemba na esengo na bambeto na bango !

6 Tika ete bakumisa Nzambe kati na minoko na bango

elongo na mopanga ya minu na bangambo nyonso mibale

kati na maboko na bango

7 mpo na kozongisa mabe na mabe ya bikolo

mpe kopesa bato etumbu ;

8 mpo na kokanga bakonzi na bango na minyololo,

kokanga bato na bango ya lokumu na mabende

9 mpe mpo na kopesa bango etumbu oyo ekomama na tina na bango !

Yango nde lokumu ya bayengebene na Ye nyonso.

Bokumisa Yawe !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_06-50-08-