Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 11

Ebombamelo ya solo

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo.

Ndenge nini bokoka koloba na ngai :

« Kimela na ngomba na bino lokola ndeke »

2 Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango,

batiaka bambanzi na bango na singa

mpo na kobamba yango longwa na molili

bato oyo bazali na mitema sembo.

3 Soki miboko ebukani,

moto ya sembo akoki kosala nini ?

4 Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ;

Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola.

Azali kotala bato nyonso ;

mpe miso na Ye ezali kososola mozindo

ya mitema na bango.

5 Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo,

kasi ayinaka makasi moto mabe

elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.

6 Tika ete akweyisela bato mabe

makala ya moto, sofolo ya moto !

Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.

7 Pamba te Yawe azali sembo,

alingaka bosembo.

Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também