Publicidade

Salmos 146

Nzambe alongisaka banyokolami

1 Bokumisa Yawe !

Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !

2 Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba,

nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso

nakozala na bomoi.

3 Botia elikya te na bakambi

to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.

4 Soki bakufi, bazongaka na mabele,

mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.

5 Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye,

oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !

6 Yawe akelaki Likolo mpe mabele,

ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ;

azali sembo seko na seko.

7 Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami

mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ;

abimisaka bakangami na boloko.

8 Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ;

Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ;

Yawe alingaka bato ya sembo.

9 Yawe abatelaka bapaya,

asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali,

kasi abebisaka banzela ya bato mabe.

10 Yawe azali Mokonzi seko na seko ;

Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela !

Bokumisa Yawe !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_06-50-08-