Pular para o conteúdo
Publicidade

Banzembo 58

Nzambe, Mosambisi ya sembo ya bakambi mabe

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te» Nzembo ya Davidi.

2 Ezali solo ete bolobaka te tango bokataka makambo ?

Boni, bana na moto, bosambisaka na bosembo ?

3 Te, ezala kati na mitema na bino,

bosalaka mabongisi ezanga bosembo ;

botandaka kanza ya maboko na bino kati na mokili.

4 Bato mabe babebaka wuta na mbotama na bango,

bapengwaka mpe balobaka lokuta

wuta na mabumu ya bamama na bango.

5 Bazalaka na ngenge lokola ngenge ya nyoka,

lokola ngenge ya etupa oyo eyokaka te,

oyo ekangaka litoyi na yango,

6 oyo eyokaka te ata mingongo ya bato na soloka

mpe ya moto ya maji oyo aleki na mayele.

7 Nzambe, buka minu na bango

kati na minoko na bango ;

Yawe, buka bambanga ya bana ya bankosi.

8 Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ;

Tika ete bambanzi na bango ebukana

tango babetaka batolotolo.

9 Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe,

lokola mwana oyo akomona moyi te

mpo ete abimi na zemi oyo esopani.

10 Liboso ete banzungu na bino ekutana

na moto ya basende,

ezala ya mayi to ya kokawuka,

bato mabe akolimwa.

11 Moto ya sembo akosepela,

pamba te akomona Nzambe

kozongisela bato mabe, mabe na mabe,

mpe akotambola kati na makila na bango.

12 Mpe bato bakoloba :

« Solo, ezali na lifuti mpo na moto ya sembo ;

solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili»

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também