Publicidade

Salmos 93

Yawe akonzaka mpo na libela na libela

1 Yawe azali kokonza, alati lokumu monene ;

Yawe alati penza lokumu monene

mpe amizingeli na nguya.

Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.

2 Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala ;

seko na seko, ozali.

3 Yawe, bibale egangaka !

Bibale etombolaka lokito na yango ;

bibale etombolaka makelele na yango.

4 Yawe azali monene makasi,

na bisika ya likolo ;

aleki lokito ya mayi minene,

mpe bambonge milayi ya ebale monene.

5 Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo ;

bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_06-35-37-