Publicidade

Salmos 43

Kotia elikya kati na Yawe

1 Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai

liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ;

kangola ngai wuta na maboko

ya bakosi mpe ya bato mabe.

2 Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai,

oyo batonga makasi ;

mpo na nini osundoli ngai ?

Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye,

na se ya minyoko ya monguna ?

3 Tinda mwinda mpe solo na Yo

mpo ete ekamba mpe emema ngai

na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;

4 bongo nakokende na etumbelo

epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai.

Oh Yawe, Nzambe na ngai,

nakosanzola Yo na lindanda.

5 Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?

Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ?

Tia elikya na yo kati na Nzambe,

pamba te nakosanzola Ye lisusu,

Mobikisi mpe Nzambe na ngai.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_06-50-08-