Publicidade

Salmos 137

Pembeni ya bibale ya Babiloni

1 Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni,

tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.

2 Todiembikaki mandanda na biso

na banzete ya pepiliye ya etuka yango.

3 Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu

bazalaki kosenga biso banzembo ;

mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso

ete tozala na esengo.

Bazalaki koloba :

« Boyembela biso banzembo ya Siona ! »

4 Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini

na mabele ya bapaya ?

5 Oh Yelusalemi, soki nabosani yo,

wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba !

6 Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi,

soki natie yo te liboso ya esengo nyonso,

wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !

7 Yawe, kobosana te bato ya Edomi

oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa ;

bazalaki koganga :

« Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango ! »

8 Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo,

esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe

oyo osalaki biso !

9 Esengo na moto oyo akokanga bana na yo

mpe akonika bango na libanga !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_06-50-08-