Publicidade

Salmos 118

Bolingo ya Yawe ezali na suka te

1 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

2 Tika ete Isalaele aloba :

« Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »

3 Tika ete bakitani ya Aron baloba :

« Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »

4 Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba :

« Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »

5 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,

mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.

6 Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ;

bato bakoki kosala ngai nini ?

7 Yawe azali mpo na ngai,

ayaka kosunga ngai ;

boye natalaka banguna na ngai na miso

lokola molongi.

8 Eleki malamu koluka ebombamelo

kati na Yawe

na esika ya kotia elikya na bato.

9 Eleki malamu koluka ebombamelo

kati na Yawe

na esika ya kotia elikya

kati na bato minene ya mokili.

10 Bikolo nyonso ezingelaki ngai,

kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.

11 Bakobaki kaka kozingela ngai,

kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.

12 Bazingelaki ngai lokola banzoyi,

kasi ekufaki lokola moto ya esobe ;

nabebisaki yango na Kombo na Yawe.

13 Batindikaki ngai mpo ete nakweyisa kondima,

kasi Yawe asungaki ngai.

14 Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;

apesaki ngai elonga.

15 Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka

wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo,

pamba te nguya na Yawe esalaka

makambo minene !

16 Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali,

mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.

17 Nakokufa te, nakozala na bomoi

mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.

18 Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi ;

kasi akabaki ngai na kufa te.

19 Bofungolela ngai bikuke ya bosembo

mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.

20 Tala ekuke ya Yawe ;

bato ya sembo bakotelaka na ekuke yango.

21 Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai

mpe opesaki ngai elonga.

22 Libanga oyo batongi ndako babwakaki

ekomi libanga ya songe ya ndako,

mpe esimbi ndako mobimba.

23 Ezali Yawe nde alingaki bongo,

mpe ezali penza likambo ya kokamwa

na miso na biso !

24 Tala mokolo oyo Yawe asali ;

tika ete tosepela mpe toganga na esengo

mpo na mokolo yango !

25 Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko.

Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.

26 Tika ete apambolama,

Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !

Tozali kopambola bino

wuta na Tempelo ya Yawe.

27 Yawe azali Nzambe,

mpe angengisaki biso.

Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko

mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.

28 Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo !

Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.

29 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-