Publicidade

Salmos 121

Yawe, Mosungi mpe Mobateli na ngai

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :

lisungi na ngai ekowuta wapi ?

2 Lisungi na ngai ewutaka na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

3 Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ;

Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

4 Te, Ye oyo abatelaka Isalaele

animbaka te mpe alalaka pongi te !

5 Yawe azali mobateli na yo ;

Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali,

lokola elili oyo ebatelaka yo.

6 Ezala na moyi to na butu,

moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !

7 Yawe akobatela yo na mabe nyonso,

akobatela bomoi na yo ;

8 Yawe akobatela kokende

mpe kozonga na yo,

sik’oyo mpe libela na libela.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-