Publicidade

Salmos 124

Lisungi na biso ewutaka epai ya Yawe

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Soki Yawe abatelaki biso te ;

tika ete Isalaele aloba bongo !

2 Soki Yawe abatelaki biso te

tango bato babundisaki biso,

3 mbele bamelaki biso ya bomoi

tango basilikelaki biso makasi.

4 Boye mayi elingaki kozindisa biso,

mbonge makasi elingaki komema biso.

5 Mayi makasi elingaki kozindisa biso.

6 Tika ete Yawe apambolama,

Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso !

7 Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo

ya mokangi bandeke ;

motambo ekatanaki, mpe tokimaki.

8 Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-