Publicidade

Salmos 54

Nzambe akangoli ngai

1 Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso»

3 Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo,

longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.

4 Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,

yoka maloba ya monoko na ngai.

5 Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ;

mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai,

batalelaka Nzambe te.

6 Tala, Nzambe azali lisungi na ngai,

Nkolo azali eyekamelo na ngai.

7 Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe !

Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.

8 Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu,

nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe,

pamba te ozali malamu.

9 Okangoli ngai na pasi nyonso ;

mpe miso na ngai etali

lokola molongi ya banguna na ngai.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-