Agradecimento pela família
Agradecer pela família é reconhecer a bênção mais preciosa que Deus nos concede. Os filhos são herança do Senhor — cada membro da família é presente divino a ser celebrado.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.
Tika ete bomoi na ngai mobimba ekumisa Yawe
Nzembo ya Davidi.
Eh molimo na ngai, pambola Yawe !
Tika ete motema na ngai mobimba epambola
Kombo na Ye ya bule !
Eh molimo na ngai, pambola Yawe
mpe kobosana ata moko te
kati na misala malamu na Ye !
Tokobombela yango bakitani na bango te,
kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima
nkembo ya masanzoli ya Yawe,
nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.
Matondi mpe losambo
Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ;
Matondi ya ndenge nini tokoki kozongisa epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozali na yango mpo na bino liboso ya Nzambe na biso ?
Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe,
bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye !
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ;
Basi balobaki na Naomi :
« Tika ete Yawe akumisama ;
Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te
kozanga mosikoli oyo kombo na ye
ekokende sango kati na Isalaele !
Akoyeisa bomoi na yo sika
mpe akosunga yo na kimobange na yo,
pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo
mpe azali na motuya na miso na yo
koleka bana mibali sambo,
aboteli yo mwana mobali. »
Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo
ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo.
Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.