Ajuda
Deus é nosso auxílio e socorro em todo tempo. Ele não dorme nem cochila. O Senhor é nosso ajudador — não precisamos temer o que o homem possa nos fazer.
Lisungi na ngai ewutaka na Yawe
oyo akela likolo mpe mabele.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,
yoka maloba ya monoko na ngai.
Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe
oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango,
oyo batonga makasi.
Yawe asungaka mpe akangolaka bango,
akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe
mpe abikisaka bango,
pamba te babombamaka kati na Ye.
Yawe, kosundola ngai te ;
Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.
Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso
mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
kangola biso mpe limbisa masumu na biso
mpo na Kombo na Yo !
Tika ete Yawe akumisama,
pamba te ayanoli mabondeli na ngai.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;
natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.
Motema na ngai etondi na esengo,
mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Ah, soki Yawe asungaki ngai te,
mbele nakendeki noki na mokili ya kufa !
Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo,
nasimbi makasi loboko na yo ya mobali
mpe nazali koloba na yo :
‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai,
mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.
Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te. Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,
mpe kotia motema te na mayele na yo.
Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,
mpe Ye akokomisa yango alima.
Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.