Publicidade

Alma

Por Bíblia Online

A alma é a parte mais íntima do ser humano — sede da vida, dos afetos e do encontro com Deus. A Bíblia convida a cuidar da alma com zelo e a aquietá-la diante do Senhor.

A alma diante de Deus

Bendize ao Senhor, ó minha alma! A alma suspira por Deus como a corça suspira pelas águas — com sede de eternidade.

Tika ete bomoi na ngai mobimba ekumisa Yawe

Nzembo ya Davidi.

Eh molimo na ngai, pambola Yawe !

Tika ete motema na ngai mobimba epambola

Kombo na Ye ya bule !

Boboto ya Nzambe eleki bomoi na motuya

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.

Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi

tango bayini na ngai bafingaka ngai,

tango balobaka na ngai mokolo mobimba :

« Wapi Nzambe na yo »

Nazwaka na kimia kati na Nzambe

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.

Na motema na ngai mobimba,

nazali na elikya kati na Yawe,

nazali penza na elikya ;

nazali kozela maloba na Ye.

Nakoganga na esengo tango nakoyemba

banzembo mpo na lokumu na Yo,

pamba te okangoli bomoi na ngai.

Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo,

mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ;

eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.

Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,

obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.

Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.

Misala na Yo ezali ya kokamwa ;

ngai, nayebi yango malamu.

Oh Yawe, kangola ngai

wuta na maboko ya bakosi

mpe wuta na lolemo ya lokuta !

Cuidar da alma

Que aproveita ao homem ganhar o mundo inteiro e perder a sua alma? Buscar a Deus de toda alma é o caminho da vida.

Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?

Yesu azongiselaki ye :

Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.

Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.

Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.

Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba»

Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.

Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.

Tala liloba oyo Yawe alobi :

« Botelema na esika oyo nzela ekutana,

botuna nzela ya kala

mpe esika oyo nzela ya malamu ezali,

bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia

mpo na mitema na bino.

Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te 

Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi,

epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.

Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-