Publicidade

Salmos 120

Kangola ngai

1 Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,

mpe ayanolaki ngai.

2 Oh Yawe, kangola ngai

wuta na maboko ya bakosi

mpe wuta na lolemo ya lokuta !

3 Yo, lolemo ya lokuta,

Yawe akopesa yo nini,

akofuta yo nini ?

4 Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba,

oyo ezali ya songe,

elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.

5 Mawa na ngai, mpo ete navandi

lokola mopaya kati na Mesheki,

kati na bandako ya kapo ya Kedari.

6 Navandaki tango molayi

kati na bato oyo balingaka kimia te.

7 Ngai, nazali moto ya kimia ;

kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia,

bango baponaka mbala moko bitumba.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-