Amigo
O amigo verdadeiro é dádiva rara de Deus. Ele ama em todo tempo, fala a verdade em amor, aconselha com sabedoria e permanece fiel nas adversidades da vida.
Amizade verdadeira
Há amigo mais chegado que um irmão. Em todo tempo ama o amigo. O perfume e o incenso alegram o coração — assim o conselho doce do amigo.
Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi,
kasi ezali na molingami moko ya motema,
oyo aleki ata ndeko.
Molingami alingaka tango nyonso,
mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.
Mafuta mpe malasi esepelisaka motema,
mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.
Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu,
ndenge wana mpe moto abongaka
soki akutani na moto mosusu.
Pamela oyo epesami na polele ezali malamu
koleka moto oyo aboyi kopamela mpo na bolingo.
Bapota oyo molingami azokisi ezali malamu
koleka babeze ebele ya monguna.
Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo,
mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ;
kozala na molingami ya pembeni ezali malamu
koleka kozala na ndeko ya mosika.
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya
akomaka moto ya bwanya,
kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba
akomona pasi.
Kozala molingami te ya moto ya kanda,
mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,
noki te okoyekola nzela na ye
mpe okokangama na motambo na ye.
Bato ebele batatolaka bolamu na bango,
kasi nani akomona moto ya sembo ?
Mozwi azalaka na baninga ebele,
kasi mobola akabwanaka
ata na molingami na ye ya motema.
Jesus, o amigo
Já não vos chamo servos, mas amigos. O maior amor é dar a vida pelo amigo. Jesus é o amigo que nunca falha.
Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami. Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.
Tala mobeko na Ngai : bolinganaka bino na bino ndenge Ngai nalingaki bino. Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami.
Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso. Moto moko te asila komona Nzambe ; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso.
Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso.
Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ? Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.
Ezalaki ndenge wana nde ekokisamaki, liloba oyo ya Makomi : « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; » mpe mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo, mpe akomaki kobenga ye « moninga na ngai. »
Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino ; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu ;
Companheiros de fé
Dois são melhores do que um. Os companheiros de fé se fortalecem mutuamente e caminham juntos com o Senhor.
Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,
pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.
Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ;
kasi mawa na moto oyo akweyi
mpe azangi moto oyo akosunga ye !
Tango bandeko basangani
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko
mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Ezali lokola malasi ya motuya
oyo basopi na moto,
bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,
ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.
Ezali lokola mamwe ya Erimoni,
oyo ekitaka na bangomba ya Siona.
Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,
mpe bomoi, mpo na libela.
Nazali moninga ya bato nyonso oyo batosaka Yo
mpe babatelaka mitindo na Yo.
Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.
Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »