Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 133

Tango bandeko basangani

1 Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko

mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !

2 Ezali lokola malasi ya motuya

oyo basopi na moto,

bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,

ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.

3 Ezali lokola mamwe ya Erimoni,

oyo ekitaka na bangomba ya Siona.

Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,

mpe bomoi, mpo na libela.

Veja também