Pular para o conteúdo
Publicidade

Amor de casal

Por Bíblia Online

O amor de casal é celebrado na Bíblia como dom sagrado. O Cântico dos Cânticos exalta a beleza do amor conjugal — íntimo, exclusivo e forte como a morte.

Tia ngai lokola kashe na motema na yo,

lokola kashe na loboko na yo ;

pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa,

zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi.

Moto ya bolingo epelaka makasi

lokola kake kowuta epai na Yawe.

Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ;

ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te.

Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako

mpo na kosomba bolingo,

solo penza bakotiola ye.

Obetisi ngai motema makasi,

Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ;

obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo,

mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.

Kosanzola bolingo

Elenge mwasi

Tika ete bibebu na yo epesa ngai beze,

pamba te bolingo na yo eleki vino na elengi.

Solo ya malasi na yo ezali kitoko,

mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko

oyo epanzani ;

yango wana bilenge basi balingaka yo !

Elenge mobali

Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko !

Solo, ozali penza kitoko makasi !

Miso na yo elala lokola ebenga.

Elenge mwasi

Mobali na ngai, tala ndenge nini ozali kitoko !

Ozali penza elengi.

Mbeto na biso ezali nde matiti ya mobesu,

Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye»

Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.

Boye, mobali alobaki :

« Tala na mbala oyo,

oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai,

mosuni ya mosuni na ngai.

Bakobenga ye mwasi,

pamba te awuti na mobali»

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,

azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

Tika ete etima na yo epambolama,

mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,

oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,

lokola mboloko ya mafuta.

Tika ete tango nyonso,

mabele na ye etondisaka yo na esengo,

mpe bolingo na ye elangwisaka yo !

Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela

kolinga mwasi ya ndumba ?

Mpo na nini kosepela kosakana

na mabele ya mwasi mosusu ?

Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi »

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe. Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.

Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba,

Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.

Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,

pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.

Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ;

kasi mawa na moto oyo akweyi

mpe azangi moto oyo akosunga ye !

Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko,

bayokaka moto ;

kasi moto oyo azali ye moko,

ndenge nini akoki koyoka moto ?

Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ;

kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna.

Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.

Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !

Makambo oyo bosengeli te kosala na bato

Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.

Seja o primeiro