Publicidade

Cânticos 6

Bilenge basi

1 Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko,

mobali na yo akei wapi ?

Akoti nzela nini mpo ete tosunga yo

mpo na koluka ye ?

Elenge mwasi

2 Mobali na ngai akei na elanga na ye,

na mikala ya banzete ya solo kitoko

mpo na koleisa bibwele na ye

mpe kobuka fololo oyo babengaka lisi.

3 Nazali mpo na mobali na ngai,

mpe mobali na ngai azali mpo ngai.

Azali koleisa bibwele na ye na bilanga

ya bafololo oyo babengaka lisi.

Elenge mobali

4 Oh mwasi na ngai ya motema,

ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa ;

elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi ;

obangisaka lokola mampinga ya basoda

na se ya bendele na bango.

5 Tika kotala ngai,

pamba te miso na yo ezali kokweyisa ngai mayanga.

Suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi

oyo ewutaka na Galadi.

6 Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme

oyo bawuti kosukola.

Meme moko na moko ezali na lipasa na yango,

moko te ezangi mwana.

7 Matama na yo, na se ya vwale,

ezali lokola liboke ya bambuma ya grenade.

8 Mokonzi akoki kozala na basi tuku motoba,

bamakangu tuku mwambe

mpe bilenge basi ebele penza.

9 Kasi ebenga na ngai, mwasi na ngai oyo akoka na nyonso,

azali kaka ye moko ;

azali kaka ye moko mwana mwasi ya mama na ye,

oyo aleki kitoko na libumu ya mama oyo abota ye.

Tango bilenge basi bamonaka ye,

balulaka ye mpe batatolaka ete azali mwasi na esengo.

Basi ya bakonzi mpe bamakangu bakumisaka ye soki bamoni ye.

Baninga

10 Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo,

kitoko lokola sanza,

azali kongenga lokola moyi,

abangisaka lokola mampinga ya basoda na se

ya bendele na bango ?

Elenge mobali

11 Nakendeki na elanga ya bakokoti

mpo na koluka milona kati na lubwaku,

mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa mito

to banzete ya grenade ebandi kobimisa bafololo.

12 Nasosolaki te ndenge nini molimo na ngai ememaki ngai

kino na bashar ya mokonzi ya bato na ngai.

Veja também

Publicidade
Cânticos
Ver todos os capítulos de Cânticos
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-