Publicidade

Cânticos 3

Elenge mwasi

1 Butu mobimba, na mbeto na ngai,

nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka ;

naluki ye, kasi namonaki ye te.

2 Esengeli na ngai kolamuka sik’oyo

mpe kobima libanda ya engumba,

na balabala na yango mpe na bisika

oyo bato nyonso bakutanaka ;

nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka.

Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.

3 Bakengeli bamonaki ngai

tango bazalaki koleka-leka na balabala ya engumba.

Natunaki bango :

« Bomoneli ngai te mobali

oyo motema na ngai elingaka ? »

4 Tango kaka nalekaki bango,

mbala moko, namonaki mobali

oyo motema na ngai elingaka.

Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende.

Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai,

na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.

Elenge mobali

5 Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino

na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga :

Bolamusa Bolingo na ngai te

liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.

Elenge mwasi

6 Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata,

azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa,

oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko

ya moto ya mombongo ?

7 Tala ! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo !

Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele,

tuku motoba nde bamemi yango.

8 Bango nyonso balati mipanga ;

bango nyonso bazali makasi na bitumba,

baselingwa mpo na bitumba ya butu.

9 Mokonzi Salomo asalisaki tsipoyi ;

basalaki yango na mabaya ya mboka Libani.

10 Basalaki bisimbelo na yango na palata,

mokongo na yango, na wolo.

Balatisaki evandelo na yango

bilamba ya motuya ya langi ya motane makasi.

Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisaki

kati na yango na motema ya bolingo.

11 Bino bilenge basi ya Siona, bobima ;

botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole,

motole oyo mama na ye alatisaki ye

na mokolo ya libala na ye,

na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.

Veja também

Publicidade
Cânticos
Ver todos os capítulos de Cânticos
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-