amor de Deus
O amor de Deus é a maior realidade do universo. Ele nos amou com amor eterno, incondicional e sacrificial — e nada no mundo pode nos separar desse amor.
Amor eterno
Deus amou o mundo de tal maneira que deu o seu Filho. Seu amor é de eternidade a eternidade — nunca falha.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.
Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Yawe abimelaki biso na kala, alobaki :
« Nalingaka bino na bolingo ya seko ;
yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
Bolingo ya Yawe ewumelaka seko na seko
Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ;
pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Yawe ayokelaka bato mawa
mpe asalelaka bango bolamu,
asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;
Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe
na mawa mpe na ngolu,
osilikaka noki te,
otonda na bolingo mpe na boyengebene.
Natalaki Yo kati na Esika ya bule
mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
Natureza do amor divino
Deus é amor. O amor é paciente, benigno. O amor do Pai nos adota como filhos e nos transforma à sua imagem.
Nzambe azali bolingo
Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe. Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.
Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye : atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye. Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.
Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso.
Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.
Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Balingami na ngai, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala kaka, mobeko oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki.
Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.
Pamba te kolinga Nzambe ezali : kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te,
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,
Expressões do amor de Deus
O Senhor nos ama com alegria e canta sobre nós. Queni a mim vem, amará; e quem me ama, o Pai o amará.
Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,
azali Elombe Mobikisi.
Akosepela na yo makasi
mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;
akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
Nalingaka bato oyo balingaka ngai,
mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai.
Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai,
lokola nalingaka yo,
nakokaba bato mosusu na esika na yo,
mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.
Ndenge kaka bayebisaki biso,
ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
kati na engumba ya Nzambe na biso ;
Nzambe alendisaka yango seko na seko.
Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo ;
kati na pole na Yo nde tomonaka pole.
boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene, atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
Tika ete Nkolo akamba mitema na bino kino na bolingo ya Nzambe mpe na molende ya Klisto !