Publicidade

Aprender

Por Bíblia Online

Aprender é vocação do discípulo. Jesus disse: aprendei de mim. A Bíblia convida a aprender com humildade, perseverança e disposição — sentados aos pés do Mestre.

Aprender de Jesus

Tomai sobre vós o meu jugo e aprendei de mim. O Espírito Santo nos ensinará todas as coisas e nos recordará tudo.

Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.

Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ; bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.

Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.

Yesu azongiselaki bango :

Makambo oyo nazali koteya ewuti epai na Ngai te, kasi ewuti epai na Ye oyo atindi Ngai.

Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.

Ensino e sabedoria

O temor do Senhor é o princípio do saber. A disciplina do Senhor forma o caráter e abre caminhos de entendimento.

Fungola ya bwanya

Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ;

bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.

Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe,

koboya te pamela na Ye ;

pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka,

ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.

Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya,

nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.

Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi,

kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.

Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye.

Comunidade de aprendizado

Ensinem e aconselhem-se mutuamente. A igreja é escola de Cristo — onde todos ensinam e todos aprendem juntos.

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.

Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.

Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.

Mitindo mpo na bandimi

Kasi yo, teya makambo oyo ekoki na malakisi ya peto.

Ouvir e praticar

Ensina-me a fazer a tua vontade. Guia-me pela tua verdade. O verdadeiro aprendiz pratica o que ouviu do Mestre.

Lakisa ngai kosala mokano na Yo,

pamba te ozali Nzambe na ngai.

Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai

na mabele oyo ezanga mabaku !

Yawe, lakisa ngai nzela,

teya ngai nzela oyo olingi ete nalanda.

Kamba ngai kati na bosolo na Yo

mpe pesa ngai mayele,

pamba te ozali Nzambe, Mobikisi na ngai ;

mpe ngai natiaka elikya na ngai

kati na Yo tango nyonso.

Solo, Yawe azali malamu mpe alima ;

atalisaka banzela na Ye

epai ya bato ya masumu.

Atambolisaka bato oyo bamikitisa,

kati na banzela ya sembo,

mpe ateyaka bango banzela na Ye.

Olobaki : « Nakopesa yo malako

mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;

nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ;

kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi,

pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo

tango opesaka mabele bitumbu.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-