Publicidade

Joel 1

Mampinga ya mabanki

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli :

2 — Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ;

bino nyonso, bavandi ya mokili,

botia matoyi mpe boyoka !

Boni, likambo ya boye esila kosalema

na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?

3 Boyebisa yango epai ya bana na bino,

mpe tika ete bana na bino bayebisa yango

epai ya bana na bango ;

mpe bana na bango, na milongo ya bato

oyo bakoya na sima.

4 Matiti oyo mampinga ya mabanki etiki,

mabanki minene elie yango ;

oyo mabanki minene etiki,

mabanki mike elie yango ;

oyo mabanki mike etiki,

mabanki mosusu elie yango.

5 Bino balangwi masanga, bolamuka mpe bolela ;

bolela, bino nyonso bameli vino.

Pamba te babotoli bino vino ya sika na bibebu.

6 Ekolo moko ya bapaya ebundisi mokili na Ngai,

ezali na nguya makasi mpe bakokoka te kotanga

motango ya bato na yango.

Minu na yango ezali lokola minu ya nkosi ya mobali,

mpe mbanga na yango, lokola mbanga ya nkosi ya mwasi.

7 Ekolo yango ekomisi elanga na Ngai ya vino

lokola esobe mpe ekati-kati banzete na Ngai ya figi,

elongoli banzete na Ngai nyonso baposo,

ebwaki yango mpe etiki bitape na yango pembe.

8 Bosala matanga lokola elenge mwasi oyo alati pili

mpo na kolela mobandami na ye.

9 Makabo ya bambuma mpe ya masanga

ezali kopesama lisusu te na Tempelo ya Yawe.

Banganga-Nzambe, basali ya Nkolo, bazali na matanga.

10 Bilanga ebebisami, mabele ekawuki,

mbuma ya ble ezali lisusu te,

vino esili mpe mafuta ezali lisusu te.

11 Bino basali bilanga, bozala na soni ;

bino baloni vino, bolela mpo na mbuma ya ble mpe ya orje,

pamba te milona ebebisami.

12 Bilanga ya vino ekawuki,

banzete ya figi elembi-lembi,

banzete ya grenade, ya mbila mpe ya pome,

banzete nyonso ya bilanga esili kokawuka.

Solo, esengo ya bato esili.

Kobengama mpo na kobongola motema

13 Oh bino Banganga-Nzambe,

bolata basaki mpe bolela.

Bino bato oyo bosalaka na etumbelo, bolela.

Bino basali ya Nzambe na ngai, boya,

bolata basaki butu mobimba.

Pamba te makabo ya bambuma mpe ya masanga

ezali kopesama lisusu te na Ndako ya Nzambe na bino.

14 Bopanza sango ya kokila bilei,

bobengisa bato na mayangani ya bule,

bobengisa bakambi mpe bavandi nyonso ya mokili

ete baya na Ndako ya Nzambe na bino

mpe bolela epai na Yawe.

15 Mawa na mokolo wana !

Pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene ;

ekoya lokola libebi

oyo ewuti epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.

16 Boni, wuta na Ndako ya Nzambe mpe na miso na biso,

balongoli te bilei, esengo mpe kosepela ?

17 Bankona ekawuki na se ya mabele,

bibombelo etikali lisusu na eloko te,

bibombelo ya bambuma ebukani

mpo ete ble ezali lisusu te.

18 Tika ete ngombe elela !

Bibwele ekomi kotelengana,

pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ;

ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.

19 Oh Yawe, Yo nde nazali kobelela,

pamba te moto ezikisi matiti mpe banzete nyonso ya bilanga.

20 Ezala banyama ya zamba ezali kotalela Yo,

pamba te miluka ekawuki

mpe moto ezikisi bilanga.

Veja também

Publicidade
Joel
Ver todos os capítulos de Joel
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-