Pular para o conteúdo
Publicidade

Joeli 3

Tango Yawe akosopa Molimo na Ye

1 Sima na makambo oyo,

nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso.

Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola,

mibange na bino bakolota bandoto,

bilenge na bino bakozwa bimoniseli.

2 Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi,

nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.

3 Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa,

na likolo mpe na mokili :

makila, moto mpe makonzi ya milinga.

4 Moyi ekobongwana molili,

mpe sanza ekobongwana makila,

liboso ete mokolo ya Yawe ekoma,

mokolo oyo ya monene mpe ya somo.

5 Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama ;

pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi,

ekozala na bato oyo bakobika,

kolanda ndenge Yawe alobaki,

mpe bato oyo Yawe akobenga

bakozala kati na bato oyo bakobika.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também

Joel
Ver todos os capítulos de Joel