Pular para o conteúdo
Publicidade

Oze 14

Kobongola motema ememaka lipamboli

1 Bato ya Samari basengeli kozwa etumbu

mpo na mabe na bango,

pamba te batombokeli Nzambe na bango.

Bato bakokufa na mopanga ;

bakonyata-nyata babebe na bango,

bakopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.

2 Isalaele, zongela Yawe, Nzambe na yo,

pamba te ezali masumu na yo nde ekweyisaki yo.

3 Bobongisa maloba na bino

mpe bozonga epai na Yawe ;

boloba na Ye : « Limbisa mabe na biso nyonso,

yamba biso na mawa na Yo

mpo ete tobonzela yo maloba ya bibebu na biso,

na esika ya bangombe.

4 Asiri akokoka kobikisa biso te ;

tokomata na mpunda ya bitumba te

mpe tokoloba lisusu te na misala ya maboko na biso :

‹ Bozali banzambe na biso

pamba te ezali Yo, Yawe, nde oyokelaka mwana etike mawa»

5 Nakobikisa bango na mabe na bango

mpe nakolinga bango na motema moko,

pamba te kanda na Ngai elongwe kati na bango.

6 Nakozala lokola londende mpo na Isalaele ;

akobimisa fololo lokola lisi,

akopika misisa lokola nzete ya sedele ya Libani.

7 Bitape na ye ekokende mosika,

akozala na lokumu lokola nzete ya olive,

mpe malasi na ye ekozala lokola

malasi ya nzete ya sedele ya Libani.

8 Bato bakozongela kovanda na se ya elilingi na ye,

bakokola malamu lokola ble,

bakobimisa fololo lokola elanga ya vino kitoko ya Libani.

9 Efrayimi akoloba :

« Banzambe ya bikeko ezali lisusu

na tina nini epai na Ngai »

Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye.

Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu,

Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.

10 Nani azali na bwanya

mpo na kososola makambo oyo ?

Nani azali na mayele mingi

mpo na koyeba yango ?

Pamba te banzela ya Yawe ezalaka alima :

bato ya sembo bakolanda yango,

kasi batomboki bakobeta mabaku na nzela yango.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também