Publicidade

Oséias 8

Etumbu ya Isalaele

1 Tia kelelo na monoko na yo !

Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe,

mpo ete babebisi boyokani na Ngai

mpe batombokeli Mobeko na Ngai.

2 Isalaele azali kobelela Ngai :

« Oh Nzambe na biso, toyebi Yo ! »

3 Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ;

yango wana, monguna akolanda ye.

4 Batunaki Ngai te

tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi.

Bamisalelaki banzambe ya bikeko

na palata mpe na wolo na bango

mpo na libebi na bango moko.

5 Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko

ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele !

Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango.

Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?

6 Ewuti na Isalaele !

Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali,

ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ;

ezali Nzambe te.

Bakobuka yango biteni-biteni,

mwana ngombe wana ya Samari.

7 « Lokola baloni mopepe,

bakobuka mopepe ya makasi.

Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te.

Ezala soki ebimisi mito,

ezali bapaya nde bakolia yango.

8 Isalaele abebisami ;

tala bango wana kati na bikolo,

bazali komonana lokola biloko pamba !

9 Pamba te bakendeki na Asiri

lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko.

Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.

10 Ata apesaki bakado kati na bikolo,

sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko

mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko

ya mokonzi moko ya nguya.

11 Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele

mpo na kolongola masumu na ye,

kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.

12 Nakomelaki bango

makambo ebele ya Mobeko na Ngai,

kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.

13 Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai,

mpe bazali kolia misuni ;

kasi Yawe azali kosepela na bango te.

Sik’oyo, akokanisa mabe na bango

mpe akopesa bango etumbu

mpo na masumu na bango :

bakozonga na Ejipito.

14 Isalaele abosani Mokeli na ye

mpe atongi bandako ya kitoko ;

Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ;

kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango,

mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-