Bom ânimo
Tende bom ânimo! Jesus repetiu estas palavras aos seus discípulos em meio às tempestades. No mundo tereis aflições, mas Ele já venceu o mundo — e nos dá coragem para enfrentar tudo.
Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Jozue alobaki na bango : « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;
komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;
nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;
solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,
loboko oyo elongisaka.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Bino babulami na Ye nyonso,
bolinga Yawe !
Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye,
kasi apesaka etumbu ya makasi
epai ya bato ya lofundu.
Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai,
otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.
Nabatelami malamu epai ya Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;
nakobanga nani ?
Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;
nakolenga liboso ya nani ?
Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango :
— Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !
Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango.
Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
Kasi Yesu alobaki na ye :
— Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.
Yango wana tozalaka na mpiko tango nyonso. Mpe toyebi malamu ete, awa tozali kowumela kati na nzoto oyo, tozali mosika na Nkolo,
Bongo na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya sambo, Salomo azongisaki bato na bandako na bango ya kapo, na esengo mpe na nsayi kati na mitema mpo na bolamu oyo Yawe asalelaki Davidi, Salomo mpe Isalaele, bato na Ye.
— Bozala makasi mpe boyika mpiko ! Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mokonzi ya Asiri mpe ya mampinga ya basoda ebele oyo bazali elongo na ye, pamba te Ye oyo azali elongo na biso azali na nguya monene koleka ye.
Soki omilembisi na mokolo ya pasi,
makasi na yo ekozala pamba.
Baninga na ngai, boyika mpiko, pamba te nazali na kondima kati na Nzambe ete akosala ndenge kaka ayebisaki ngai.
Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.
Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.
Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe
oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango,
oyo batonga makasi.
Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango.
Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.
Bandeko, sango ya kondima na bino elendisi biso makasi, kati na pasi mpe minyoko nyonso oyo tozali komona ;
Bato bazongisaki :
— Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu ! Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Este artigo te tocou? Faça uma oração!
+581 estão orando agora.
Junte-se à corrente de oração.