Publicidade

Provérbios 2

Bwanya : bomengo oyo ebombama

1 Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai

mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;

2 soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya

mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;

3 soki obeleli mayele

mpe ogangi epai ya bososoli ;

4 soki oluki yango penza ndenge balukaka palata

to bomengo oyo ebombama,

5 okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini

mpe okozwa boyebi ya Nzambe.

6 Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,

mpe maloba ya monoko na Ye epesaka

mayele mpe bososoli.

7 Abongiselaka bato ya sembo elonga

mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.

8 Pamba te abatelaka bayengebene

mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.

9 Boye, okososola likambo nini

ezali solo, alima, sembo :

nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.

10 Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo

mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.

11 Bososoli ekobatela yo,

mpe mayele ekobomba yo

12 mpo na kobikisa yo na nzela mabe,

na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,

13 na bato oyo batikaka nzela ya sembo

mpo na kolanda nzela ya molili,

14 na bato oyo basepelaka kosala mabe,

na bato oyo bazalaka na esengo

ya kokota na bozindo ya mabe,

15 na bato oyo nzela na bango etengama-tengama

mpe etamboli na bango etonda na mobulu.

16 Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya,

liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,

17 oyo akima mobali na ye ya bolenge

mpe abosana boyokani oyo asalaki

elongo na Nzambe na ye ;

18 pamba te ndako na ye ememaka na kufa,

mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.

19 Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka

mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.

20 Boye, okotambola na nzela ya bato malamu

mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.

21 Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili,

mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango ;

22 kasi bato mabe bakokufa na mokili

mpe bakolongola bango kati na mokili

ya bato ya songisongi.

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-