Publicidade

Confiabilidade

Por Bíblia Online

A confiabilidade de Deus é absoluta. Ele é fiel em todas as suas promessas, constante em seu amor e seguro em seu caráter. Podemos confiar nele completamente.

Deus é fiel

O Senhor é fiel em todas as suas palavras e bondoso em todos os seus atos. Grande é a sua fidelidade!

Bolamu ya Yawe esili te,

mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;

ekomaka ya sika tongo nyonso.

Solo, boyengebene na Yo ezali monene !

Yawe azali pene ya bato nyonso

oyo babelelaka Ye,

ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;

Yawe akokisaka makambo nyonso

mpo na bolamu na ngai.

Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko !

Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo !

Kasi bolingo ya Yawe

mpo na bato oyo batosaka Ye,

mpe bosembo na Ye

mpo na bakitani na bango,

mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye

mpe batosaka mibeko na Ye,

ezali ya libela na libela.

Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye,

ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,

pamba te Yawe alingaka bosembo,

mpe asundolaka te bayengebene na Ye.

Babatelamaka mpo na seko,

kasi bana ya bato mabe bakolimwa.

Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.

Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.

Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.

Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko»

Caráter de Deus

Toda boa dádiva vem do alto. O Senhor é bom e sua misericórdia dura para sempre. Nele podemos descansar.

bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.

Nkolo, ozali malamu, olimbisaka,

otonda na bolingo mpo na bato nyonso

oyo babelelaka Yo.

Apesaki mayi epai ya bato

oyo bazalaki na posa ya mayi

mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.

Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;

soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.

Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,

nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;

maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,

nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.

Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ;

Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

Integridade e confiança

Eu sou o Alfa e o Ômega — Deus é o mesmo ontem, hoje e sempre. Fiel em o que realizou e realizará por cada filho.

« Nazali Alifa mpe Omega» elobi Nkolo Nzambe,

« Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya,

Nkolo-Na-Nguya-Nyonso»

Zongisa biso epai na Yo

Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko ;

Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.

Nzembo mpo na kokumisa Yawe

Yawe, ozali Nzambe na ngai ;

nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ;

pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka,

osalaki mabongisi ya kokamwa,

makambo oyo obongisa wuta kala.

Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto

ezali bolingo ya solo,

mpe mobola azali malamu koleka mokosi.

Moto oyo aswanaka abimisaka basekele,

kasi moto oyo azali na molimo ya sembo

abombaka basekele.

Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango,

kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka

na boyengebene te ebebisaka bango.

Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo»

Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-