Criação
A criação revela a glória de Deus. Céus, terra, mares e tudo o que existe testemunham o poder criador. No princípio Deus criou — e tudo era muito bom.
No princípio
No princípio criou Deus os céus e a terra. O Espírito de Deus pairava sobre as águas. E Deus disse: haja luz.
Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! »
Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,
akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;
akelaki bango mobali mpe mwasi.
Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala.
Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
O poder criador
Pela palavra do Senhor foram feitos os céus. Tudo foi criado por Ele e para Ele — o visível e o invisível.
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ;
mampinga na yango nyonso,
na nzela ya pema ya monoko na Ye.
Liboso ete bangomba ezala,
liboso ete okela mabele mpe mokili,
libela na libela, ozali Nzambe.
Boya, togumbama mpe tofukama,
tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe,
Mokeli na biso !
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.
Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :
lisungi na ngai ekowuta wapi ?
Lisungi na ngai ewutaka na Yawe
oyo akela likolo mpe mabele.
Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe
oyo akela likolo mpe mabele.
Tala mokolo oyo Yawe asali ;
tika ete tosepela mpe toganga na esengo
mpo na mokolo yango !
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Criador e Sustentador
O Deus eterno não se cansa nem se fatiga. Dele, por Ele e para Ele são todas as coisas — a Ele seja a glória.
Oyebi te ? Nanu oyoka te ?
Yawe azali Nzambe ya libela na libela,
azali Mokeli ya basuka ya mabele ;
alembaka te mpe apemaka te,
mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye,
ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele !
Boni, potopoto ekoki solo koloba
na moto oyo asali yango :
‹ Ozali kosala nini ? ›
Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba :
‹ Azali na maboko te ? ›
Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola
mpe atia miboko na yango na mabele ;
abengaka mayi ya ebale monene
mpe asopaka yango na etando ya mabele.
Kombo na Ye ezali : Yawe.
Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye,
na nzela na Ye mpe mpo na Ye.
Tika ete nkembo ezonga epai na Ye
mpo na libela na libela ! Amen !
Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.
Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.
Nova criação
Se alguém está em Cristo, nova criatura é. O Criador faz novas todas as coisas — na natureza e na redenção.
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.
Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.
Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi ; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso.
Pamba te, ezali na nzela na Ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino mosusu baloba : « Tozali bana na ye ! »
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba :
« Tika ete masanzoli mpe lokumu,
nkembo mpe nguya
ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye
oyo avandi na Kiti ya Bokonzi
mpo na libela na libela ! »