Crianças
As crianças ocupam lugar especial no coração de Deus. A Bíblia instrui a educá-las, protegê-las e ensiná-las nos caminhos do Senhor desde cedo — formando gerações que temem a Deus.
Herança do Senhor
Os filhos são herança do Senhor. Eles são presentes de Deus — cada criança é um milagre e uma responsabilidade sagrada.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Bana mibali na biso bazali lokola milona,
bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango ;
bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko
oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Ndenge nini elenge akoki kowumela
na nzela ya sembo ?
Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
Ndenge nini elenge akoki kowumela
na nzela ya sembo ?
Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala,
kasi bato oyo balukaka Yawe
bakozanga eloko moko.
Instruir as crianças
Instrui a criança no caminho em que deve andar. A educação cristã é mandamento repetido através de toda a Escritura.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba,
bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba,
bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu
alingaka ye te,
kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye,
kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te,
kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;
pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi,
ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo
mpe ekomemela yo kimia.
Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te,
kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;
pamba te Yawe apamelaka moto oyo Ye alingaka,
ndenge kaka tata apamelaka mwana na ye, oyo alingaka.
Tata na ngai azalaki koteya
mpe koloba na ngai boye :
« Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai,
bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,
zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te,
kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,
Disciplinar com amor
A vara e a repreensão dão sabedoria. A disciplina produz o fruto pacífico da justiça nos que são exercitados por ela.
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya,
kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
Kozangisa te kopesa mwana etumbu ;
soki obeti ye fimbu, akokufa te.
Yokela tata oyo aboti yo,
mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
Luka bosolo, kasi koteka yango te ;
sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.
Mwana oyo abetaka tata na ye
mpe abenganaka mama na ye
ayeisaka soni mpe mawa.
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu
koleka mokosi oyo azangi mayele.
Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ;
boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye,
soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.
Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa,
mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye,
kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,
kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
Moto oyo abatelaka mibeko azali mwana mayele,
kasi moto oyo atambolaka na bato ya loyenge
ayokisaka tata na ye soni.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,
mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,
mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai :
Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !
Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya,
bomeka kobwaka yango te !
Obediência e promessa
Filhos, obedecei a vossos pais no Senhor. Honra a teu pai e tua mãe para que viva muito tempo sobre a terra.
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye.
Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.
Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino.
alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo. Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
Crianças e o reino
Deixai vir a mim as crianças. Jesus honrou as crianças como modelo de fé e humildade para todo o seu povo.
Yesu alobaki :
— Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Yesu alobaki :
— Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye :
— Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ?
Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.
mpe alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo. Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo. Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo.
[
Kaka na tango yango, Yesu alobaki :
— Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !
Esengo na bato oyo bayeisaka kimia,
pamba te bakobengama bana na Nzambe !
Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli :
— Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango :
— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.
Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo :
— Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ?
Azongisaki :
— Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo.
Yesu alobaki na ye :
— Batela bampate na Ngai.
Identidade e crescimento
Somos filhos de Deus pelo Espírito de adoção. Crescer em Cristo é amadurecer em fé, obediência e amor ao próximo.
nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe.
Pamba te bato oyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe bazali bana na Nzambe.
Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! »
Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.
Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.
Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto ; pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka. Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.
Bana, nazali kokomela bino, pamba te masumu na bino elimbisamaki mpo na Kombo na Yesu-Klisto.
Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.
moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana :
« Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo,
mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.
Pamba te Nkolo apamelaka moto oyo Ye alingaka,
apesaka etumbu na moto nyonso
oyo Ye ayebaka lokola mwana na Ye. »
Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ? Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te.
Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ?
Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia.
Bazongisaki :
— Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu.
Transmitir a fé
Contaremos à geração vindoura os louvores do Senhor. O legado de fé é o maior presente que damos aos nossos filhos.
Yawe akoteya bana na yo nyonso,
mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
Yawe akoteya bana na yo nyonso,
mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.
Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo
ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo.
Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.
Boni, mama akoki solo kobosana
bebe na ye oyo azali komelisa mabele,
to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?
Ata soki akoki kobosana,
ngai nakoki kobosana yo te !
Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ;
bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.
Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.
Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
Tokobombela yango bakitani na bango te,
kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima
nkembo ya masanzoli ya Yawe,
nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi,
atiaki mibeko kati na Isalaele,
apesaki mitindo epai ya batata na biso
ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,
mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango,
ekeke ya bana oyo bakobotama.
Tika ete batelema mpe bayebisa yango
na bana na bango,
mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe,
babosana te misala ya Nzambe
mpe babatela mibeko na Ye.