Publicidade

Salmos 127

Nani asalaka nyonso

1 Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Soki Yawe atongi ndako te,

batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ;

soki Yawe akengeli engumba te,

bakengeli bazali kosala na pamba.

2 Ezali na pamba nde, bino mpe,

bolamukaka na tongo makasi,

bolalaka noki te mpe bosalaka makasi

mpo na kozwa bilei ;

pamba te Nzambe apesaka bilei yango

kaka na balingami na Ye,

wana bazali nanu kolala pongi.

3 Bana bazali libula kowuta na Yawe,

mpe kobota bana ezali lifuti.

4 Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,

ndenge wana mpe bana oyo moto aboti

na bolenge na ye bazali.

5 Esengo na moto oyo atondisi makonga

kati na ebombelo na ye ya makonga !

Akokufa soni ata moke te

tango akosamba elongo na banguna na ye

na ekuke ya engumba.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-