Publicidade

Dar

Por Bíblia Online

Dar é princípio do Reino de Deus. Jesus deu tudo — até a própria vida. A Bíblia nos ensina que é mais bem-aventurado dar do que receber, e que Deus ama ao que dá com alegria.

Dar com alegria

Deus ama ao que dá com alegria. Dai e dar-se-vos-á. O generoso prospera e quem abençoa será abençoado.

Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.

Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,

Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.

Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.

Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.

bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu»

Princípios de generosidade

Honra ao Senhor com as tuas primícias. Não negues o bem a quem o merece. A alma generosa prosperará.

Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo

mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.

Kolinga baninga

Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto

oyo azali na bosenga,

tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.

Moto oyo akabaka akokoma na bomengo ;

mpe moto oyo apesaka bato mosusu mayi,

ye mpe bakopesa ye mayi.

Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela

mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.

Mokolo mobimba,

akufaka na ye kaka na baposa makasi ;

kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.

Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo,

bundela babola mpe bato oyo bakelela.

Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai» elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.

O ensino de Jesus

Quando deres esmola, não toque a trombeta. A generosidade do coração importa mais que a grandeza do donativo.

Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.

Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala, mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.

Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.

Yesu azongisaki :

Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.

Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.

Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi,

mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.

Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,

kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.

Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani,

mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo,

wuta na mokano ya mitema na biso moko ?

Nyonso ewutaka epai na Yo,

mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.

Neyemi alobaki na bango lisusu :

Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.

Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-