Publicidade

Tomar uma decisão

Por Bíblia Online

Tomar decisões com sabedoria é um dos maiores desafios da vida. A Bíblia nos ensina a buscar a Deus em oração, na Palavra e no conselho, confiando que Ele dirige os nossos passos.

Buscar a Deus

Se algum de vós tem falta de sabedoria, peça a Deus. Ele dá generosamente e sem repreensão a todos os que pedem.

Libondeli ya kondima

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso.

Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.

Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,

mpe kotia motema te na mayele na yo.

Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,

mpe Ye akokomisa yango alima.

Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,

mpe Ye akokomisa yango alima.

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Conselho e direção

Onde não há conselho os planos se frustam. Toda Escritura é útil para nos guiar nas decisões da vida.

Mpo na kozanga koyeba kokamba, ekolo ekokweya ;

kasi lobiko ezali kati na motango ebele ya bapesi toli.

Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe,

kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.

Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye,

atelemelaka bososoli nyonso.

Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa

tango ya kokanisa,

kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.

Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ;

soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.

Maloba ya monoko ya moto ezalaka

lokola mayi ya mozindo ;

etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale

oyo etondi makasi.

Ezali malamu te kolongisa moto mabe

mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.

Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana,

mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.

Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa,

mpe bibebu na ye ezalaka motambo

mpo na molimo na ye moko.

Maloba ya moto ya songisongi ezalaka

lokola bilei ya kitoko,

ekitaka na esengo kino na libumu.

Moto oyo azongaka sima na mosala na ye

azali ndeko ya mobebisi.

Kombo ya Yawe ezali

lokola ndako molayi batonga makasi ;

moyengebene akimelaka kuna

mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,

oyo batonga makasi ;

akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.

Liboso ete moto akweya,

motema na ye ekomaka na lolendo ;

kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Kopesa eyano liboso ya koyoka

ezali liboma mpe bozoba.

Kimia kati na motema elendisaka moto

na tango ya bokono,

kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?

Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,

mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.

Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te.

Na etinda ya Nkolo, Saulo mpe Barnabasi bakei

Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo» Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.

Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki :

Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.

Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.

Confiar e seguir

Seja o que for que façais, fazei tudo para a glória de Deus. O sábio ouve a Deus antes de agir.

Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.

Molende kati na pasi

Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.

Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye :

Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.

Salomo azongisaki :

Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi. Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo. Mowumbu na Yo azali awa kati na bato oyo oponi : bato ebele oyo bakoki kotanga motango na bango te mpo ete bazali ebele penza. Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?

Nkolo asepelaki na likambo oyo Salomo asengaki. Nzambe alobaki na ye :

Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te ; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo, nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.

Mwasi na ye alobaki na ye :

Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo ? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo !

Yobo azongiselaki ye :

Ah ! Ozali koloba lokola moto ya liboma ! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te ?

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-