Publicidade

Miquéias 7

Pasi ya Isalaele

1 Tala, mawa na ngai !

Nakomi lokola moto oyo azali koluka kobuka

bambuma na eleko ya elanga,

na tango oyo bazongelaka kobuka

bambuma ya vino oyo etikalaka.

Kasi ezali ata na liboke moko te

ya bambuma ya vino ya kolia

to mbuma ata moko te ya figi ya sika oyo nasepelaka kolia.

2 Bayengebene batikali lisusu te na mokili,

moto ya sembo azali lisusu te ;

bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila,

mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.

3 Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe,

bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ;

bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi,

bayokanaka mpo na kosala bato mabe.

4 Moto oyo aleki malamu kati na bango

azali lokola nzube,

moto oyo aleki sembo azali mabe koleka liboke ya basende.

Mokolo oyo bakengeli na yo basakolaki ekokisami,

mokolo oyo Yawe ayei kopesa yo etumbu.

Sik’oyo, ekomi tango na bango ya koyoka soni.

5 Botia motema te epai ya bazalani na bino,

botia elikya te epai ya baninga na bino ya motema.

Ezala liboso ya mwasi oyo alalaka na tolo na yo,

keba na maloba oyo ezali kobima na monoko na yo.

6 Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni,

elenge mwasi azali kotelemela mama na ye,

mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye ;

bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.

7 Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe,

nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai ;

Nzambe na ngai akoyoka ngai.

Isalaele akotelema lisusu

8 Oh banguna na ngai, boseka ngai te !

Ata soki nakweyi, nakotelema kaka.

Ata soki navandi kati na molili,

Yawe azali pole na ngai.

9 Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe,

nakomema mokumba ya kanda na Ye

kino tango akozwa likambo na ngai na maboko

mpe akolongisa ngai.

Akobimisa ngai na pole,

mpe nakomona bosembo na Ye.

10 Bongo monguna na ngai akomona yango

mpe akoyoka soni makasi,

ye oyo azalaki koloba na ngai :

« Wapi Yawe, Nzambe na yo ? »

Miso na ngai ekomona ndenge akokweya

mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.

11 Mokolo ya kotonga lisusu bamir na yo ekoya ;

ezali mokolo wana nde bandelo ya mokili na yo

ekopusama lisusu mosika.

12 Na mokolo wana, bato ebele bakoya epai na yo

longwa na mokili ya Asiri mpe na bingumba ya Ejipito,

ata longwa na mokili ya Ejipito kino na ebale Efrate,

longwa na ebale monene moko kino na mosusu,

longwa na ngomba moko kino na mosusu.

13 Mokili ekobebisama likolo ya bato wana,

likolo ya bizaleli na bango ya mabe.

Losambo mpe masanzoli

14 Kamba bato na Yo na lingenda na Yo

ndenge mobateli bibwele asalaka !

Pamba te bazali bameme ya libula na Yo,

oyo ezali lokola kotelengana yango moko

kati na zamba, na etando moko ya kitoko.

Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi

ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.

15 Nakomonisa yo makambo ya kokamwa

lokola na tango obimaki na Ejipito.

16 Bato ya bikolo ya bapaya bakomona yango

mpe bakoyoka soni ;

ata soki bazali na nguya ya ndenge nini,

bakozanga maloba,

mpe matoyi na bango ekokangama.

17 Bakolia mabele lokola nyoka,

mpe lokola banyama oyo etambolaka na libumu ;

bakobima na somo wuta na madusu epai wapi bazalaki kobombama,

bakoya epai na Yawe, Nzambe na biso, na kolenga.

18 Nzambe nini akokani na Yo,

Yo oyo olimbisaka masumu ya bato

mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ?

Okangelaka bato kanda mpo na libela te,

kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.

19 Solo, okoyokela biso lisusu mawa,

matambe na Yo ekonyata masumu na biso,

mpe okobwaka mabunga na biso nyonso

kati na bozindo ya ebale monene.

20 Okomonisa Jakobi bosembo na Yo,

mpe Abrayami, bolamu na Yo,

ndenge olapaki ndayi epai ya batata na biso na tango ya kala.

Veja também

Publicidade
Miquéias
Ver todos os capítulos de Miquéias
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-