Publicidade

Miquéias 6

Yawe afundi bato na Ye

1 Boyoka makambo oyo Yawe alobi :

« Telema mpe samba likambo na yo liboso ya bangomba,

mpe tika ete bangomba mikuse eyoka

makambo oyo ozali koloba !

2 Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te,

boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye,

pamba te azwi bango na likambo

mpe alingi kosamba na Isalaele.

3 Bino bato na Ngai, nasali bino penza nini ?

Boyanola Ngai nanu, nalembisi bino na likambo nini ?

4 Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito

to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ?

Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino

Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?

5 Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo

oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino,

mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori,

azongiselaki ye.

Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki

longwa na Sitimi kino na Giligali

mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »

6 Eloko nini penza tokoki komema epai na Yawe

mpo na kofukama liboso ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo ?

Boni, tomema bambeka ya kotumba

to bana ngombe ya mibali ya mobu moko ?

7 Yawe akosepela solo

soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali

to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ?

Boni, topesa solo bana na biso ya liboso

mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ?

Boni, topesa bana na biso ya mibali

oyo bawuti na mikongo na biso

mpo ete akoka kolongola masumu na biso ?

8 Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu.

Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo :

Tambola na bosembo,

linga boboto mpe tambola

elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

Isalaele akweyisami

9 Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba !

Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya.

Boyoka sango ya etumbu na bino

na monoko na Ye oyo atindi yango !

10 Oh libota ya mobulu,

boni, nasepela penza komona bomengo na bino,

oyo bosili kozwa na nzela ya mabe,

Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?

11 Boni, nazanga penza kopesa etumbu

epai ya moto oyo asalelaka kilo ya lokuta,

mpe oyo azali na libenga etonda

na bimekelo kilo ya lokuta ?

12 Bazwi ya libota oyo batondi na kanza,

bato ya libota oyo batondi na lokuta,

mpe mosala ya bibebu na bango ezali kaka kokosa.

13 Yango wana, Ngai nakobeta yo na nzela ya pasi

mpe nakobebisa yo mpo na masumu na yo.

14 Okolia, kasi okotonda te,

pamba te nzala makasi ekokota na ndako na yo.

Okosala ekonzo, kasi okobatela eloko moko te,

pamba te nakokaba yango na mopanga.

15 Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ;

okokamola bambuma ya olive,

kasi okomipakola mafuta na yango te ;

okokamola bambuma ya vino,

kasi okomela masanga na yango te.

16 Lokola obatelaki malako ya Omiri

mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi,

nakokaba yo mpo ete obebisama,

nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ;

bongo bokolata soni ya libota na Ngai.

Veja também

Publicidade
Miquéias
Ver todos os capítulos de Miquéias
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-