Publicidade

Miquéias 2

Mabongisi ya moto mpe mabongisi ya Nzambe

1 Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe,

oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango !

Bakokisaka yango na tongo,

pamba te bazali na makoki ya kosala yango.

2 Soki baluli bilanga ya moto,

bazwaka yango na makasi ;

soki baluli ndako ya moto,

babotolaka yango ;

bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako

mpe babotolaka moto libula na ye.

3 Mpo na yango, Yawe alobi :

« Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo :

ekozala pasi moko oyo bakokoka

komibikisa na yango te.

Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te,

pamba te ekozala tango ya pasi makasi.

4 Na mokolo wana,

bakosambwisa bino ;

mpo na kotiola bino,

bakobanda koyembela bino banzembo oyo :

‹ Tobebisami penza mobimba !

Libula ya bato na ngai ekabwani !

Abotoli yango na maboko na ngai

mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »

5 Yango wana, moko te kati na bino akotikala na lisanga ya Yawe

mpo na kokabola mabele na zeke.

Basakoli ya lokuta

6 Basakoli na bango bazalaki koloba :

« Kosakola te, kosakola makambo ya boye te !

Pasi ekokomela biso te. »

7 Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye

esengeli solo kolobama ?

« Boni, Molimo na Yawe atomboki

mpo ete asala makambo ya boye ?

Maloba na Ye ezali ya boboto te

mpo na moto oyo atambolaka alima ? »

8 Na mikolo eleki,

bozalaki komona bato na ngai lokola banguna.

Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia

bilamba ya talo na mawa te,

lokola bato oyo bawuti bitumba ;

9 bobenganaki basi ya bato na ngai

longwa na bandako na bango ya kitoko,

bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai

kati na bana na bango.

10 Botelema mpe bokende !

Awa ezali esika na bino ya kopema te,

pamba te ezali mbindo,

ebebisami makasi penza,

mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te.

11 Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba :

« Nakosakola mpo na yo ; »

bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino

to ya masanga mosusu ya makasi,

moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli

ya bato ya lolenge na ye.

Nzambe asangisaka

12 Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso,

nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele.

Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango,

lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti.

Makelele oyo ekoyokana kuna

ekozala makelele ya bato ebele.

13 Moto oyo apasolaka nzela

akotambola liboso na bango.

Bakolekela na nzela oyo bapasoli,

bakolekela na nzela ya ekuke

mpe bakobimela na nzela yango.

Mokonzi na bango akotambola liboso na bango,

Yawe akozala liboso na bango.

Veja também

Publicidade
Miquéias
Ver todos os capítulos de Miquéias
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-