Publicidade

Dificuldades

Por Bíblia Online

As dificuldades são parte da vida, mas Deus é refúgio certo em todo tempo de angústia. A Bíblia promete que nenhuma adversidade pode separar os filhos de Deus do seu amor.

Deus é refúgio

Deus é nosso refúgio e fortaleza, socorro bem presente nas angústias. Nada poderá nos separar do amor de Cristo.

Nzambe azali ekimelo na biso

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo,

azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.

Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani,

bangomba ekweyi kati na ebale monene ;

Nalobaka na tina na Yawe :

« Nzambe na ngai azali ebombamelo

mpe ndako makasi na ngai ;

natiaka elikya na ngai kati na Ye »

Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;

libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai

ezali kati na Nzambe.

Akonzaka mokili na bosembo,

akataka makambo ya bato na alima.

Yawe azali ebombamelo

mpo na bato oyo bazali konyokolama,

mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.

Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

nani azali na nguya lokola Yo ?

Nani, oh Yawe ?

Boyengebene na Yo ezingeli Yo.

Yawe azali monene makasi,

na bisika ya likolo ;

aleki lokito ya mayi minene,

mpe bambonge milayi ya ebale monene.

Akitisaki mopepe makasi,

bambonge ya ebale monene evandaki kimia.

Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ? Kolanda ndenge ekomama :

« Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ;

bazwaka biso lokola bameme ya koboma»

Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso. Pamba te nandimisami ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele to eloko mosusu oyo Nzambe akela, eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.

Provisão nas dificuldades

O Senhor provê mesmo nos tempos mais difíceis. Ele sustentou Elias, protegeu Israel e cuida dos seus com fidelidade eterna.

Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya.

Atandaki lipata mpo na kobatela bango,

mpe moto mpo na kopesa pole na butu.

Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi

mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.

Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki,

etiolaki lokola ebale kati na esobe.

Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange,

namoni nanu te moto ya sembo kosundolama

to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.

Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela,

mpe libula na bango ekowumela mpo na seko.

Na tango ya pasi, bakokawuka te ;

na mikolo ya nzala, bakozala na bilei ebele.

Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka,

mpe bibale, na mabele ya kokawuka ;

nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo

mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.

Ozalaki ekimelo mpo na mobola,

ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi,

ebombamelo na tango ya mvula makasi

mpe pio na tango ya molunge.

Pamba te pema ya banyokoli ezali

lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;

Ekozala lokola ndako ya matiti oyo epesaka pio na tango ya molunge ya moyi makasi, ekimelo mpe ebombamelo na tango ya mopepe makasi mpe na tango ya mvula.

Tango okokatisa mayi monene,

nakozala elongo na yo ;

mpe tango okokatisa bibale,

ekozindisa yo te.

Tango okotambola kati na moto,

okozika te,

mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;

Força nas provas

Em tudo somos atribulados, mas não esmagados. O Senhor é bom e é fortaleza no dia da angústia — Ele conhce os seus.

Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.

Yawe azali malamu,

azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi

mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.

akangaka mayi kati na mapata,

kasi mapata epasukaka te ;

azipaka kiti ya bokonzi na Ye,

atandaka mapata na likolo na yango ;

akataka mondelo na likolo ya mayi,

na suka ya pole mpe na molili.

Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo,

okobanga kobebisama te tango ekoya ;

Kasi Yesu alobaki na bango :

Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?

Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki. Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye »

Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke ! Yango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini 

Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba.

Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-