Publicidade

Salmos 89

Wapi bolingo na Yo ya kala

1 Maloba ya Etani, moto ya Ezera.

2 Nakoyemba tango nyonso

bolingo ya Yawe ;

monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo

libela na libela.

3 Solo, nazali kotatola yango :

« Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te ;

ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo»

4 Olobaki : « Nasali boyokani

elongo na moponami na ngai,

nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi :

5 ‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi

mpo na tango nyonso

mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi

mpo na seko› »

6 Yawe, Lola esanzolaka

misala na Yo ya kokamwa

mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.

7 Nani akokani na Yawe kuna na likolo ?

Nani akokani na Yawe

kati na mampinga ya likolo ?

8 Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu ;

solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.

9 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,

nani azali na nguya lokola Yo ?

Nani, oh Yawe ?

Boyengebene na Yo ezingeli Yo.

10 Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene

mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.

11 Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito,

kino koboma ye ;

mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.

12 Likolo ezali ya Yo ; mabele mpe ezali ya Yo !

Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.

13 Yo nde okela Nor mpe Sude ;

Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo

mpo na lokumu ya Kombo na Yo.

14 Loboko na Yo ezali na makasi,

loboko na Yo ezali na nguya,

loboko na Yo ya mobali oyo otombola.

15 Bosembo mpe alima ezali miboko ya

Kiti ya Bokonzi na Yo,

boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.

16 Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko !

Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,

17 basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo,

basanzolaka bosembo na Yo.

18 Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango ;

mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.

19 Yawe azali nguba na biso ;

Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.

20 Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo

kati na emoniseli :

« Nasungaki elombe moko ya bitumba,

natombolaki elenge mobali moko

kati na bato na ngai ;

21 namonaki Davidi, mosali na ngai ;

napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.

22 Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya,

mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.

23 Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa,

moto mabe akokoka konyokola ye te.

24 Nakobebisa banguna na ye liboso na ye

mpe nakoboma bayini na ye.

25 Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala

elongo na ye ;

mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.

26 Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye,

mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.

27 Akobelela ngai boye :

‹ Ozali Tata na ngai,

Nzambe na ngai, Libanga

mpe Mobikisi na ngai 

28 Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso,

mokonzi oyo aleki na kotombwama

kati na bakonzi ya mokili.

29 Nakobatela mpo na seko

bolingo na ngai mpo na ye ;

boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.

30 Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi,

mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela

ndenge moko na likolo.

31 Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai

mpe balandi bosembo na ngai te,

32 soki babuki mitindo na ngai

mpe babateli te mibeko na ngai,

33 nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda,

mpo na botomboki na bango,

mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango ;

34 kasi nakowangana te bolingo na ngai

mpe nakobongola te boyengebene na ngai.

35 Nakosambwisa te boyokani na ngai

mpe nakobongola te maloba na ngai.

36 Nalapaki yango na ndayi mbala moko

mpo na libela

na Kombo ya bosantu na ngai :

‹ Nakokosa Davidi te 

37 Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela,

mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela

lokola moyi liboso na ngai.

38 Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi

mpo na libela.

Motatoli oyo azali kuna kati na likolo

akoki kokosa te»

39 Nzokande, obwakaki, omonaki pamba,

osilikelaki mopakolami na Yo !

40 Owanganaki boyokani oyo osalaki

elongo na mosali na Yo,

obwakaki na mabele mpe osambwisaki

motole na ye.

41 Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso

mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi ;

42 bato nyonso oyo balekaki wana

babotolaki ye biloko,

mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.

43 Obakisaki makasi ya bayini na ye

mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,

44 osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko

mpe osungaki ye te na bitumba ;

45 osilisaki kongenga ya lokumu na ye,

obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele ;

46 okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye

mpe olatisaki ye kazaka ya soni.

47 Yawe, kino tango nini ?

Okomibomba penza tango nyonso ?

Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto ?

48 Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai !

Okelaki penza bato mpo na suka

oyo ezanga ata tina !

49 Moto nani akoki kozala na bomoi

mpe azanga komona kufa ?

Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi ?

50 Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala

oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo

na nzela ya ndayi ?

51 Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela

basali na Yo ;

kobosana te ete namemi mokumba

ya bato oyo nyonso !

52 Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo,

oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo !

53 Tika ete Yawe apambolama

libela na libela !

Amen ! Amen !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-