Pular para o conteúdo
Publicidade

Educação das crianças

Por Bíblia Online

A educação cristã dos filhos é responsabilidade sagrada dos pais. A Bíblia ensina a instruir, disciplinar e modelar a fé desde a tenra idade, formando gerações que temem ao Senhor.

Instruir nos caminhos de Deus

Instrui a criança no caminho em que deve andar. A educação bíblica molda o caráter e estabelece fundamentos para a vida.

Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;

ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.

Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba,

bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.

Batoli ya tata

Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata,

bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.

Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,

mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;

Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,

mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.

Alobaka na bwanya,

mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.

Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso. Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.

Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai : « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango»

Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo. Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki. Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela.

Disciplina e amor

A vara e a repreensão dão sabedoria. A disciplina é expressão de amor que protege e forma o caráter dos filhos.

Fimbu mpe pamela epesaka bwanya,

kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.

Pesa mwana na yo etumbu,

bongo okozala na kimia

mpe akotondisa motema na yo na esengo.

Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu

alingaka ye te,

kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.

Kozangisa te kopesa mwana etumbu ;

soki obeti ye fimbu, akokufa te.

Na kobeta ye fimbu,

okokangola molimo na ye na lifelo.

Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu,

kasi kotomboka na yo ekoma te kino

na posa ya koboma ye.

Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ?

Bana, botosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba te ezali ndenge wana nde bokosepelisa Nkolo.

Batata, boyokisaka bana na bino kanda te, noki te mitema na bango ekolemba.

Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.

Ensinar pelas Escrituras

Desde a infância conheces as sagradas letras. As Escrituras formam, equipam e capacitam para toda boa obra.

mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.

Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe ondimaki, pamba te oyebi epai ya nani oyekolaki yango ; mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.

Misala ya Nzambe

Nzembo ya Azafi.

Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai !

Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai !

Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese,

nakosakola makambo oyo ebombama

wuta na tango ya kala.

Makambo oyo toyoka, oyo toyebi,

oyo batata na biso bayebisa biso.

Tokobombela yango bakitani na bango te,

kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima

nkembo ya masanzoli ya Yawe,

nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

Makambo oyo toyoka, oyo toyebi,

oyo batata na biso bayebisa biso.

Tokobombela yango bakitani na bango te,

kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima

nkembo ya masanzoli ya Yawe,

nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

Tokobombela yango bakitani na bango te,

kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima

nkembo ya masanzoli ya Yawe,

nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.

Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi,

atiaki mibeko kati na Isalaele,

apesaki mitindo epai ya batata na biso

ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,

mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango,

ekeke ya bana oyo bakobotama.

Tika ete batelema mpe bayebisa yango

na bana na bango,

mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe,

babosana te misala ya Nzambe

mpe babatela mibeko na Ye.

Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye

zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe,

mpe akangolaka bango.

Bomeka elengi mpe botala

ndenge nini Yawe azali malamu ;

Esengo na moto oyo azwaka Yawe

lokola ebombamelo na ye !

Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ;

pamba te bato oyo batosaka Ye

bazangaka eloko moko te.

Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala,

kasi bato oyo balukaka Yawe

bakozanga eloko moko.

Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala,

kasi bato oyo balukaka Yawe

bakozanga eloko moko.

Bana bazali libula kowuta na Yawe,

mpe kobota bana ezali lifuti.

Bênção e promessa

Os filhos são herança do Senhor. A educação cristã é investimento eterno que produz frutos em todas as gerações.

Yesu alobaki :

Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.

Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka,

mpe bibale, na mabele ya kokawuka ;

nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo

mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.

Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo

ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo.

Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.

Yawe akoteya bana na yo nyonso,

mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.

Seja o primeiro