Publicidade

Encorajamento

Por Bíblia Online

O encorajamento é uma das vocações mais lindas do cristão. A Bíblia transborda de palavras de ânimo: não temas, levanta-te, Eu sou contigo. Deus nos encoraja para encorajarmos outros.

Não temas

Deus diz repetidamente: não temas, Eu sou contigo. Ele fortalece, sustenta e caminha ao nosso lado em cada desafio.

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;

komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;

nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;

solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,

loboko oyo elongisaka.

Tango okokatisa mayi monene,

nakozala elongo na yo ;

mpe tango okokatisa bibale,

ekozindisa yo te.

Tango okotambola kati na moto,

okozika te,

mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;

Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai,

lokola nalingaka yo,

nakokaba bato mosusu na esika na yo,

mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.

Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo :

nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este

mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;

Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te !

Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te !

Okobosana soni ya bolenge na yo

mpe okokanisa lisusu te

pasi na yo ya kokufisa mobali ;

Makambo ya sika

« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato

oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te,

namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te.

Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te,

nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo 

basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,

Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :

bapumbwaka likolo lokola bampongo,

bapotaka mbangu mpe bapemaka te,

batambolaka mpe balembaka te.

Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba :

Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ?

Nazongisaki :

Ngai oyo, tinda ngai !

Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Bato bazongisaki :

Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu ! Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te»

Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko»

Deus está conosco

Se Deus é por nós, quem será contra nós? Tudo posso naquele que me fortalece. Ele nos encoraja pela sua presença.

Bolingo ya Nzambe epesaka elikya

Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?

Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata »

Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye !

Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto,

Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango.

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.

Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.

Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.

Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.

Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.

Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso. Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.

Lotomo ya boyokanisi

Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.

Tozali lisusu te komilobela epai na bino, kasi tozali nde kopesa bino libaku malamu ya komikumisa na tina na biso, mpo ete bokoka koyanola bato oyo bamikumisaka te na tina na makambo oyo ebombama kati na mitema, kasi na tina na oyo emonanaka na miso. Mpo na biso, soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe ; mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino.

Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso ; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye. Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.

Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.

Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei. Makambo oyo nyonso ewutaka na Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso mpe Ye moko na nzela ya Klisto mpe apesaki biso lotomo ya boyokanisi. Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi. Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe. Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye»

Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.

Matondi epai ya Nzambe

Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso : abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.

Ânimo nas lutas

No mundo tereis aflições, mas tende bom ânimo — Eu venci o mundo. O Senhor é refúgio seguro em toda tribulação.

Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !

Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !

Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.

Promessas de conforto

Vinde a mim os cansados e sobrecarregados. Lança sobre Ele tuas ansiedades, pois Ele cuida de ti.

Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.

Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.

Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,

nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;

maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,

nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.

Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku

oyo etondi na molili ya kufa,

nakobanga mabe ata moko te,

pamba te ozali elongo na ngai,

nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,

mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku

oyo etondi na molili ya kufa,

nakobanga mabe ata moko te,

pamba te ozali elongo na ngai,

nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,

mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

Nabatelami malamu epai ya Nzambe

Nzembo ya Davidi.

Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;

nakobanga nani ?

Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;

nakolenga liboso ya nani ?

Talela Yawe !

Zala makasi mpe yika mpiko !

Talela Yawe !

Bino babulami na Ye nyonso,

bolinga Yawe !

Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye,

kasi apesaka etumbu ya makasi

epai ya bato ya lofundu.

Olobaki : « Nakopesa yo malako

mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;

nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

Nzambe azali ekimelo na biso

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo,

azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.

Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani,

bangomba ekweyi kati na ebale monene ;

Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ;

bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.

Mokolo oyo nazalaka na bobangi,

natiaka elikya na ngai kati na Yo.

Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso,

ezala elongo na biso !

Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso !

Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !

Yawe, Mosungi mpe Mobateli na ngai

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :

lisungi na ngai ekowuta wapi ?

Lisungi na ngai ewutaka na Yawe

oyo akela likolo mpe mabele.

Natalelaka Yawe tango nyonso,

pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.

Akonzaka mokili na bosembo,

akataka makambo ya bato na alima.

Yawe azali ebombamelo

mpo na bato oyo bazali konyokolama,

mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.

Bobwaka epai na Ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, pamba te Ye nde abatelaka bino.

Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.

Kotatola elikya

Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu ? Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.

Encorajar uns aos outros

Encorajai-vos mutuamente e edificai-vos uns aos outros. Não desanimemos — a bondade do Senhor é nova a cada manhã.

Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.

Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.

Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te» Boye tokoki koloba na elikya nyonso :

« Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ;

bato bakoki kosala ngai nini »

Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.

Mitindo ya suka

Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.

Mitindo ya suka

Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali :

Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.

Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,

azali Elombe Mobikisi.

Akosepela na yo makasi

mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;

akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Mosala nyonso epesaka litomba,

kasi maloba ya pamba ememaka na bobola.

Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato»

Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.

Deus chama pelo nome

Ao longo da Bíblia, Deus chamou seus servos pelo nome — Abraão, Moisés, Samuel, Paulo — encorajando cada um pessoalmente.

Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli :

Jakobi ! Jakobi !

Jakobi azongisaki :

Ngai oyo.

Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa»

Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo :

Abrayami ! Abrayami !

Abrayami azongisaki :

Ngai oyo.

Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango :

Moyize, Moyize !

Moyize azongisaki :

Ngai oyo !

Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki :

Samuele, mwana na ngai !

Samuele azongisaki :

Ngai oyo !

Kati na Damasi, ezalaki na moyekoli moko oyo kombo na ye ezalaki « Ananiasi» Nkolo abengaki ye kati na emoniseli :

Ananiasi !

Azongisaki :

Nkolo, ngai oyo !

Mari azongiselaki ye :

Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai !

Bongo anjelu akabwanaki na ye.

Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale ? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango. Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te ; boleki bandeke mike ebele na motuya.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-