Publicidade

Lamentações 4

Nzembo ya minei : kokakolama ya Siona

1 Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango,

wolo ya peto enzuluki !

Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani

na basonge ya babalabala nyonso.

2 Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona,

oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto,

kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele,

oyo mosali mbeki basili kosala !

3 Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa

ya komelisa bana na yango mabele ;

kasi bato na ngai bakomi mitema makasi

lokola maligbanga kati na esobe.

4 Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami

na likolo ya kati ya monoko na ye ;

bana mike bazali kosenga bilei

kasi moto moko te azali kopesa bango yango.

5 Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko

bakomi kokufakufa na babalabala ;

ba-oyo bakolaki na molato ya motane

bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.

6 Lisumu oyo bato na ngai basali

ezali monene koleka lisumu ya Sodome,

engumba oyo ebebisamaki na mbala moko

wana moto moko te asembolaki loboko na ye

mpo na kotelemela yango.

7 Bana ya bakonzi na bango bazalaki

kongala koleka mvula ya pembe,

pembe koleka miliki ;

banzoto na bango ezalaki motane

koleka langi ya motane penza,

mpe lolenge na bango ezalaki

lokola libanga na safiri.

8 Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala,

bazali koyeba bango lisusu te na babalabala ;

poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa,

ekawuki lokola koni.

9 Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu

koleka ba-oyo bakufi na nzala :

banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala,

mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.

10 Basi ya mitema malamu balambi,

na maboko na bango, bana na bango moko ;

bana na bango bakomi bilei na bango

kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.

11 Yawe asilikaki makasi koleka ;

asopaki kanda na Ye

mpe apelisaki moto kati na Siona,

moto oyo ezikisaki miboko na yango.

12 Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili

bandimaki te ete banguna mpe bayini

bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.

13 Kasi makambo wana esalemaki

mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi

mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango,

oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.

14 Bakomaki sik’oyo koyengayenga

na babalabala lokola bakufi miso,

bakomaki mbindo na makila

mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.

15 Bato bazali koganga mpe koloba na bango :

« Bolongwa awa, bato ya mbindo !

Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te ! »

Wana bazalaki kokima mpe kotelengana,

bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba :

« Bavanda na esika oyo te ! »

16 Yawe, Ye moko, apanzi bango,

azali kotala bango lisusu te.

Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te

mpe bayokelaki mibange mawa te.

17 Miso na biso elembaki lisusu

mpo na kozela na pamba lisungi ;

wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika,

tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi

kowuta na ekolo songolo mpe pakala,

kasi ebikisaki biso te.

18 Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso ;

boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso.

Suka na biso ekomaki pene,

mikolo na biso ekomaki ya kotanga,

mpo ete tokomaki na suka.

19 Bato oyo bazalaki kolanda biso

bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo ;

bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba

mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.

20 Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema

akangami na mitambo na bango ;

nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye :

« Tokobika bomoi malamu

na se ya bobatelami na ye

kati na bikolo. »

21 Edomi, mboka kitoko,

movandi ya mokili ya Utsi,

sepela, zala na esengo !

Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo ;

okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.

22 Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ;

Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te.

Kasi yo Edomi, mboka kitoko,

Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo,

mpe akobimisa masumu na yo na polele.

Veja também

Publicidade
Lamentações
Ver todos os capítulos de Lamentações
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-